Luke 21:25-30

25—Bongo bilembo ya kokamwa ekomonana na moi, na sanza, mpe na minzoto. Na mokili, bato bakotonda na somo mpe kobanga mpo na lokito monene ya ebale mpe ya bambonge na yango. 26Bato bakokufa na somo mpo na kobanga makambo oyo ekokweya na mokili, pamba te banguya ya likolo ekoningana. 27Bongo bakomona Mwana na Moto akoya kati na mapata na nguya mpe na nkembo monene.

28Tango makambo wana ekobanda kosalama, botelemisa mitu mpe boyika mpiko, pamba te, kokangolama na bino ekomi pene-pene.

29Bongo alobaki na bango lisapo oyo :

—Botala nzete ya figi mpe nzete mosusu nyonso.
30Soki bomoni makasa na yango ebandi kobima, boyebi ete tango ya mbula ekomi pene-pene.
Copyright information for LinMNB