Luke 21:8-13

8Yesu azongisaki :

—Bokeba, moto moko te akosa bino. Pamba te bato mingi bakoya na kombo na ngai, mpe bakoloba : “Ezali ngai”, mpe “Tango ekomi pene !” Bolanda bango te !
9Tango bokoyoka basango ya bitumba mpe ya mobulu, bobanga te. Pamba te makambo wana nyonso esengeli kosalama liboso, kasi suka ekoya noki te.

10Bongo alobaki na bango :

—Ekolo moko ekobunda na ekolo mosusu, mpe bokonzi moko ekobunda na bokonzi mosusu.
11Mabele ekoningana makasi penza, nzala makasi mpe bamaladi ya mabe ekongala na bisika mingi, makambo ya somo mpe bilembo ya minene ekomonana wuta na Likolo.

(Mt. 10.17-22 ; Mk. 13.9-13)

12—Kasi liboso ya makambo wana, bakokanga bino, bakonyokola bino, bakosambisa bino na bandako ya mayangani mpe bakotia bino na boloko. Mpe mpo na kombo na ngai, bakomema bino liboso ya bakonzi mpe liboso ya bayangeli. 13Makambo yango ekopesa bino nzela ya kotatola kombo na ngai.
Copyright information for LinMNB