Luke 22:56-61
56Mosali moko ya mwasi amonaki ye avandi pembeni ya moto, tango atalaki ye malamu, alobaki : —Moto oyo azalaki na ye ! 57Kasi Piere awanganaki mpe alobaki : —Mwasi, nayebi ye te ! 58Sima ya mwa tango moke, moto mosusu amonaki ye mpe alobaki : —Yo mpe ozali moko na kati na bango ! Kasi Piere azongiselaki ye : —Te, mobali, ngai te ! 59Sima ya pene-pene ngonga moko, moto mosusu lisusu alobaki na molende nyonso : —Ya solo, moto oyo azalaki mpe na ye ; pamba te azali moto ya Galileya. 60Kasi Piere azongisaki : —E e mobali ! Likambo ozali koloba nayebi yango te ! Na tango azalaki naino koloba soso elelaki. 61Bongo Nkolo abalukaki mpe atalaki Piere. Tango Piere akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye : “Liboso ete soso elela, okowangana ngai mbala misato !”
Copyright information for
LinMNB