Luke 23:25-27

25Atikaki moto oyo bango basengaki, oyo akotaki na boloko mpo na mobulu abimisaki mpe mpo abomaki moto. Bongo apesaki bango Yesu mpo basala ye ndenge bango moko balingaki.

Liwa ya Yesu

(Mt. 27.32-44 ; Mk. 15.21-32 ; Jn. 19.17-22)

26Tango bazalaki komema ye, bakangaki Simon ya mboka Sirene, oyo awutaki na bilanga, mpe batindaki ye na makasi mpo amema ekulusu, sima ya Yesu. 27Bato ebele penza bazalaki kolanda ye, elongo na basi oyo bazalaki kolela, mpe komitungisa mingi penza mpo na ye.

Copyright information for LinMNB