Luke 6:27-32

27—Kasi nalobi boye na bino baoyo bozali koyoka ngai : Bolinga banguna na bino, bosala makambo ya malamu na bato oyo bayinaka bino. 28Bopambola bato oyo balakelaka bino mabe, mpe bobondelaka mpo na baoyo banyokolaka bino. 29Soki moto abeti yo mbata na litama moko, pesa ye mpe oyo mosusu. Soki moto abotoli kazaka na yo, koboya te mpo azwa mpe simisi na yo. 30Pesa na moto nyonso oyo asengi yo ; mpe soki moto akamati eloko na yo na makasi, kosenga ye azongisela yo yango te.

31Makambo oyo bolingi ete bato basala mpo na bino, bosala yango mpe ndenge moko na bato mosusu. 32Soki bozali kolinga kaka baoyo balingaka bino, lokumu nini bokozwa ? Pamba te bato ya masumu mpe balingaka bato oyo balingaka bango.
Copyright information for LinMNB