Mark 14:27-31
27Yesu alobaki na bango : —Bino nyonso bokokweyisa kondima pamba te ekomama : Nakobeta mobateli ya bamemebongo bameme bakopalangana !
28Kasi sima ya kosekwa na ngai, nakokende liboso na bino na Galileya ! 29Piere alobaki na ye : —Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima, kasi ngai te. 30Yesu azongiselaki ye : —Nalobi na yo ya solo : lelo, na butu oyo liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana ngai mbala misato ! 31Kasi Piere alobaki na molende nyonso : —Atako nasengeli kokufa elongo na yo, nakowangana yo te ! Bongo nyonso mpe balobaki kaka ndenge moko.
Yesu akeyi kobondela na Getesemane
(Mt. 26.36-46 ; Lk. 22.40-46)
Copyright information for
LinMNB