Mark 14:3-8

3Yesu azalaki na Betaniya, na ndako ya Simon oyo azalaki na maladi ya maba. Tangu azalaki na mesa, mwasi moko ayaki na molangi ya Albatre,
Tala Matayo 26.7
etonda na malasi ya nar
Nar  : misisa mpe makasa oyo basalelaka malasi.
oyo basangisa te mpe ya motuya mingi. Afungolaki yango mpe asopaki malasi na moto ya Yesu.

4Bato mosusu na kati ya bato oyo bazalaki wana, basilikaki na nse ya mitema mpe balobaki :

—Mpo na nini kobebisa malasi oyo ?
5Pamba te malasi oyo bakokaki koteka yango na badeni koleka nkama misato mpe kopesa mbongo na babola !

Bazalaki kopamela mwasi yango makasi penza.

6Kasi Yesu alobaki :

—Botika ye kimia ! Mpo na nini bozali kotungisa ye ? Asali likambo moko ya malamu mpo na ngai.
7Pamba te, babola bakozala na bino tango nyonso, mpe bokoki kosalela bango makambo ya malamu tango nyonso oyo bokolinga ; kasi ngai, bokozala na ngai tango nyonso te. 8Asali oyo ye akoki. Asi apakoli nzoto na ngai malasi, mpo kobongisa kokundama na ngai.
Copyright information for LinMNB