Mark 14:53-58

53Bongo bamemaki Yesu epai ya mokonzi monene ya banganga-Nzambe, epai bakonzi ya banganga-Nzambe nyonso, bankolo, mpe balakisi ya Mibeko bayaki kosangana. 54Piere azalaki kolanda Yesu na mosika, kino na kati ya lopango ya mokonzi monene ya banganga-Nzambe ; bongo avandaki elongo na bakengeli, mpe azalaki koyotela moto. 55Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya likita monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli mpo na Yesu, mpo bazwa nzela ya kobomisa ye. Kasi bazwaki yango te. 56Pamba te bato mingi bazalaki koloba matatoli ya lokuta mpo na ye, kasi matatoli yango ezalaki kokokana te. 57Bongo ndambo ya bato batelemaki mpe balobaki litatoli oyo ya lokuta mpo na ye : 58Toyokaki ye azalaki koloba : “Nakoboma Ndako ya Nzambe oyo esalami na maboko ya bato, mpe na mikolo misato, nakotonga mosusu, oyo ekosalama na maboko ya bato te”.
Copyright information for LinMNB