Mark 14:55-60

55Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya likita monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli mpo na Yesu, mpo bazwa nzela ya kobomisa ye. Kasi bazwaki yango te. 56Pamba te bato mingi bazalaki koloba matatoli ya lokuta mpo na ye, kasi matatoli yango ezalaki kokokana te. 57Bongo ndambo ya bato batelemaki mpe balobaki litatoli oyo ya lokuta mpo na ye : 58Toyokaki ye azalaki koloba : “Nakoboma Ndako ya Nzambe oyo esalami na maboko ya bato, mpe na mikolo misato, nakotonga mosusu, oyo ekosalama na maboko ya bato te”. 59Kasi ata bongo, litatoli na bango ezalaki kaka kokokana te.

60Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe atelemaki na bango mpe atunaki Yesu :

—Boni, okozongisa eloko moko te ? Litatoli nini bato oyo bazali koloba mpo na yo ?

Copyright information for LinMNB