Mark 15:2-7

2Pilato atunaki ye :

—Ozali mokonzi ya Bayuda ?

Yesu azongisaki :

—Ee, ezali bongo ndenge olobi.
3Bakonzi ya banganga-Nzambe bazalaki kofunda ye na makambo ebele. 4Bongo Pilato atunaki ye lisusu :

—Boni, okozongisa eloko moko te ? Yoka ebele ya makambo oyo bazali kofundela yo !
5Kasi Yesu azongisaki lisusu ata eloko moko te ; bongo Pilato akamwaki mingi penza. 6Na tango ya feti, Pilato azalaki kobimisa moto moko ya boloko, oyo bato bango moko bazalaki kosenga. 7Nzoka nde, moto moko kombo na ye Barabasi, azalaki na boloko elongo na batomboki mosusu, ba oyo babomaki moto na tango mobulu ebimaki.
Copyright information for LinMNB