Mark 15:33-38
33Na ngonga ya midi, molili ezalaki na ekolo mobimba kino na ngonga ya misato ya pokwa. 34Bongo na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki na mongongo makasi : —Eli ; Eli, lama sabakatani ? Elingi koloba : Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai ? 35Tango ndambo ya bato oyo bazalaki wana bayokaki bango, balobaki : —Yoka, azali kobenga Eliya ! 36Bongo moto moko akimaki mbangu, atondisaki eponze na vino ya ngayi, atiaki yango na songe ya mwa nzete, mpe apesaki yango Yesu mpo amela ; mpe alobaki : —Tozela mpe totala, soki Eliya akoya kokitisa ye. 37Kasi Yesu agangaki makasi peza mpe akataki motema ! 38Rido ya Ndako na Nzambe epasukaki na biteni mibale, banda na likolo kino na nse.
Copyright information for
LinMNB