Mark 6:14-19

14Mokonzi Erode ayokaki sango ya Yesu, pamba te kombo na ye epanzanaki mingi penza.

Bato bazalaki koloba :

—Jean Batiste asekwi kati na bakufi ! Yango wana azali na nguya ya kosala makamwisi.

15Kasi basusu bazalaki koloba :

—Ezali Eliya !

Bato mosusu mpe bazalaki koloba :

—Azali moprofeta lokola moko ya baprofeta.

16Kasi tango Erode ayokaki yango, alobaki :

—Ezali Jean, oyo nakatisaki motu, nde asekwi kati na bakufi !

(Mt. 14.3-12 ; Lk. 3.19-20)

17Pamba te, Erode ye moko moto apesaki mitindo mpo bakanga Jean mpe batia ye na boloko. Asalaki bongo mpo na Erodiade, mwasi ya ndeko na ye Filipi, oyo ye abalaki.

18Pamba te, Jean azalaki koloba na Erode :

—Ozali na ndingisa te mpo obala mwasi ya ndeko na yo !

19Yango wana Erodiade abombaki kanda na motema mpo na Jean, mpe azalaki kolinga kobomisa ye. Kasi azalaki kokoka te,
Copyright information for LinMNB