Mark 6:53-56

53Tango basilisaki kokatisa ebale, bakomaki na mokili ya Genezareti, mpe bakangaki bwato na bango na libongo. 54Tango bazalaki kokita na bwato, bato bayebaki Yesu noki penza. 55Bango bakimaki mbango na bipai nyonso ya mokili wana, mpe bamemaki bato ya maladi na bitoko, na bisika nyonso oyo bazalaki koyoka ete Yesu azalaki kuna. 56Bipai nyonso oyo Yesu azalaki kokendeĀ : na bamboka, na vile, to na bilanga, bato bazalaki kotia bato ya maladi na bazando, mpe bazalaki kobondela ye ete apesa bango ndingisa ya kosimba ata songeya elamba na ye. Bongo baoyo nyonso bazalaki kosimba yango, bazalaki kobika.
Copyright information for LinMNB