Mark 8:1-6

Yesu aleyisi mibali nkoto minei

(Mt. 15.32-39)

1Na mikolo wana, bato mingi penza basanganaki lisusu. Lokola bazalaki na eloko moko te po na kolia, Yesu abengaki bayekoli na yempe alobaki na bango :

2—Nazali koyokela bato oyo mawa, pamba te basiʼbasali mikolomisato elongo na ngai, mpe bazali na eloko moko te mpo na kolia. 3Soki nazongisi bango na bandako na bango na nzala, bakokweya na nzela ; pamba te basusu kati na bango bawuti mosika.

4Bayekoli na ye bazongiselaki ye :

—Esika nini tokozwa, awa na esika oyo ezangi bato, mampa ya kokoka mpo na koleyisa bango ?

5Yesu atunaki bango :

—Bozali na mampa boni ?

Bazongisaki :

—Sambo.

6Bongo alobaki na ebele ya bato bavanda na mabele. Akamataki mampa yango sambo, azongisaki matondi, akataki yango, bongo apesaki yango na bayekoli na ye mpo bakabola yango na bato ; mpe basalaki bongo.
Copyright information for LinMNB