Mark 8:27-30
27Yesu na bayekoli na ye bakendaki na bamboka ya Sezarea na Filipo. Na nzela, atunaki bango : —Bato balobaka ete ngai nazali nani ? 28Bazongisaki : —Basusu balobaka : Jean Batiste ; basusu balobaka : Eliya, mpe basusu balobaka : ozali moko ya baprofeta. 29Yesu atunaki bango : —Bongo bino, bolobaka ete ngai nazali nani ? Piere azongiselaki ye : —Ozali Kristo ! 30Bongo akebisaki bango baloba na moto moko te mpo na ye.Yesu ayebisi liwa mpe kosekwa na ye
(Mt. 16.21-23 ; Lk. 9.22)
Copyright information for
LinMNB