Mark 9:10-13
10Babombaki likambo yango na motema, mpe bazalaki kotia tembe bango na bango soki “kosekwa kati na bakufi” elingi koloba nini.(Mt. 17.10-13)
11Bongo batunaki Yesu : —Mpo na nini balakisi ya Mibeko balobaka ete Eliya asengeli koya liboso ? 12Yesu azongiselaki bango : —Ya solo, Eliya asengeli koya liboso mpe kobongisa makambo nyonso. Mpo na nini ekomama ete Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi mpe kotiolama ? 13Kasi nazali koloba na bino, Eliya asiʼaya, mpe basalaki ye nyonso oyo bango balingaki, ndenge ekomama mpo na ye.Yesu abikisi mwana oyo azali na molimo mabe
(Mt. 17.14-21 ; Lk. 9.37-43)
Copyright information for
LinMNB