Mark 9:38-40

38Bongo Jean alobaki :

—Moteyi, tomonaki moto moko azalaki kobengana milimo mabe na kombo na yo, mpe tolobaki na ye atika, mpo azali na biso elongo te.

39Kasi Yesu alobaki :

—Bopekisa ye te, pamba te moto moko te oyo asali likamwisi na kombo na ngai, bongo akoki sima ya mwa tango moke koloba likambo ya mabe mpo na ngai.
40Pamba te, oyo ayinaka biso te azali mpo na biso.
Copyright information for LinMNB