Mark 9:42-47

42Soki moto akweyisi na masumu mwana moko na kati ya bana mike oyo bandimaka ngai, ezali malamu mpo na ye, bakanga ye na kingo libanga moko ya monene, mpe babwaka ye na ebale. 43Soki loboko na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango. Ezali malamu mpo na yo okota na bomoi na loboko moko, na esika ya kozala na maboko mibale, mpe kokende na lifelo, epai moto ekufaka te. 44[Kuna, misopi na bango ekokufa te mpe moto ekokufa te.]
Mikanda misusu ya kala ezangi verset oyo.
45Soki lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango. Ezali malamu mpo na yo okota na bomoi na lokolo moko, na esika ya kozala na makolo mibale mpe kobwakama na lifelo, na moto oyo ekufaka te. 46Kuna, misopi na bango ekokufa te mpe moto ekokufa te
Mikanda misusu ya kala ezangi verset oyo.
.
47Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango. Ezali malamu mpo na yo okota na Bokonzi ya Nzambe na liso moko, na esika ya kozala na miso mibale, mpe kobwakama na lifelo,
Copyright information for LinMNB