Matthew 11:18-23

18Pamba te, Jean ayaki, azalaki kolia te mpe komela te, kasi bolobaki : “Azali na milimo mabe !” 19Bongo Mwana ya Moto aye, azali kolia mpe komela, kasi bolobi : “Azali lokoso mpe molangwi masanga, moninga ya bafutisi mpaku mpe ya bato ya masumu”. Kasi bwanya ezali komonana sembo na nzela ya misala na yango.

Yesu apameli bavile oyo eboyaki kondima

(Lk. 10.12-15)

20Bongo Yesu abandaki kopamela bavile epai ye asalaki makamwisi mingi ; pamba te, bato yango babongolaki mitema na bango te.

21—Mawa na yo Korazini ! Mawa na yo Betsaida ! Pamba te, soki makamwisi oyo esalamaki kati na bino, esalamaka na Tire mpe Sidon, mbele banda kala, bato ya bavile wana balingaki kobongola mitema, mpe kolakisa yango na kolata saki mpe komipakola putulu. 22Yango wana nalobi na bino, na mokolo ya kosambisama, etumbu na bino ekoleka oyo ya Tire mpe Sidon.

23Bongo yo Kapenawumi, okanisi ete bokotombola yo kino na likolo ? Te ! Bakokitisa yo kino na mboka ya bakufi. Pamba te, soki makamwisi oyoesalamaki kati na yo, esalamaka na Sodomo, mbele vile wana ezali kowumela kino lelo oyo.
Copyright information for LinMNB