Matthew 15:1-6

Yesu mpe bonkoko ya Bayuda

(Mk. 7.1-23)

1Bongo bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko bawutaki na Yeruzalem, bayaki epai ya Yesu mpe batunaki ye :

2—Mpo na nini bayekoli na yo batosaka te bonkoko na biso ? Pamba te basokolaka maboko na bango te liboso ya kolia.

3Yesu azongiselaki bango :

—Bongo bino, mpo na nini botosaka te Mibeko ya Nzambe te ? Kasi botosaka kakabonkoko na bino ?
4Pamba te Nzambe alobaki : “Tosa tata mpe mama na yo”, mpo oyoakolakela tata to mama na ye mabe, esengeli baboma ye. 5Kasi bino bolobaka ete : soki moto alobi na tata na ye to na mama na ye : “Biloko oyo nalingaki kopesa yo, nakopesa yango likabo na Nzambe” ; 6mpe moto oyo asali bongo azali na mabe te epai ya tata na ye to mpe mama na ye, mpo na biloko oyo alingaki kopesa ye. Ya solo, na ndengewana, bozali penza koboma Liloba ya Nzambe mpo na bonkoko na bino.
Copyright information for LinMNB