Matthew 15:32-37

32Yesu abengaki bayekoli na ye mpe alobaki :

—Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa mingi, pamba te basali na ngai mikolo misato mpe bazali na eloko ye kolia te. Nalingi kozongisa bango na nzala te, soki te bakoki kokweya na nzela !

33Bongo bayekoli na ye bazongisaki :

—Epai wapi tokoki kozwa mampa ya kokoka, na esika oyo ezangi bato mpo na koleyisa bato ebele boye ?

34Yesu atunaki bango :

—Bozali na mampa boni ?

Bango bazongisaki :

—Sambo na mwa bambisi ya mike-mike.

35Yesu alobaki na ebele ya bato bavanda na mabele. 36Bongo azwaki mampa sambo wana na bambisi, azongisaki matondi, abukaki yango mpe apesaki yango na bayekoli na ye. Bongo bango bapesaki yango na bato. 37Bango nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe yango etondisaki bitunga sambo.
Copyright information for LinMNB