Matthew 20:28-33

28Pamba te, Mwana ya moto ayaki te mpo bato basalela ye, kasi mpo na kosalela bato, mpe kopesa bomoi na ye mpo na kokangola bato ebelepenza !

Yesu abikisi bato mibale bakufa miso

(Mk. 10.46-52 ; Lk. 18.35-43)

29Tango Yesu na bayekoli na ye bazalaki kobima na Jeriko, bato ebele penza bazalaki kolanda ye.

30Bato mibale bakufa miso bavandaki pembeni ya nzela. Tango bayokaki ete Yesu azalaki koleka wana, bagangaki :

—Nkolo, Mwana ya David yokela biso mawa !

31Bato bagangelaki bango, mpe balobaki na bango bavanda nyee ; kasi bango bagangaki lisusu makasi :

—Nkolo, mwana ya David yokela biso mawa !

32Yesu atelemaki, abengaki bango mpe atunaki bango :

—Bolingi nasala nini mpo na bino ?

33Bazongiselaki ye :

—Nkolo, tolingi ete miso na biso efungwama !

Copyright information for LinMNB