Matthew 21:1-6

Bayambi Yesu na kembo monene na Yeruzalem

(Mk. 11.1-11 ; Lk. 19.28-38 ; Jn. 12.12-19)

1Tango bapusanaki pene-pene ya Yeruzalem, mpe bakomaki na Betfaze, likolo ya ngomba ya banzete ya Olive, Yesu atindaki bayekoli mibale 2mpe alobaki na bango :

—Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango bokokomakaka na ebandeli ya mboka yango, bokomona mpunda ya mwasi oyo ezali ya kokangama, na mwana na yango pembeni. Bofungola yango, mpe bomemela ngai yango.
3Soki moto atuni bino likambo, bozongisa : “Nkolo azali na posa na yango”, mpe akotika yango noki.

4Makambo oyo esalamaki mpo ete maloba ya moprofeta ekokisama :
5 Boloba na elenge mwasi ya Siona :
Tala, Mokonzi na yo azali koya epai na yo ;
azali ya komikitisa
mpe avandi likolo ya mpunda ya mwasi,
likolo ya mwana ya mpunda,
mwana ya mpunda ya mwasi.

6Bayekoli bakendaki mpe basalaki ndenge Yesu atindaki bango.
Copyright information for LinMNB