Matthew 21:15-17

15Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko bayokaki kanda mingi penza tango bamonaki makamwisi oyo Yesu asalaki, mpe ndenge bana bazalaki koganga na kati ya lopango ya Ndako ya Nzambe : “Ozana na Mwana na David !” 16Bongo batunaki ye :

—Ozali koyoka makambo bana oyo bazali koloba ?

Yesu azongiselaki bango :

—E e ! Naino botangi maloba oyo te : Ozwaki lokumu na monoko ya bana
mpe ya baoyo bamelaka mabele.

17Sima atikaki bango, abimaki na vile mpe akendaki na Betaniya, epai alalaki.

Yesu alakeli nzete ya figi mabe

(Mk. 11.12-14,20-25)

Copyright information for LinMNB