Matthew 21:33-38

33—Boyoka lisapo mosusu. Moto moko azalaki na elanga : akonaki banzete ya vino, asalelaki yango lopango, mpe atimolaki libulu moko mpo na kokamola mbuma. Bongo atongaki ndako moko ya molayi mpo na mokengeli. Sima, apesaki elanga na maboko ya basali ya elanga mpo bafutelaka, mpe akendaki na mobembo.

34Tango elaka ya kobuka mbuma ekomaki pene-pene, atindaki basali na ye epai ya bato oyo bazalaki kofutela elanga, mpo na kozwa ndambo na ye ya mbuma. 35Bafuteli ya elanga bakangaki basali na ye ; babetaki moko, babomaki mosusu, mpe babambaki oyo ya misato mabanga.

36Atindaki lisusu basali mosusu mingi koleka baoyo ya liboso ; kasi bafuteli ya elanga, basalaki bango kaka ndenge moko.

37Bongo suka na yango, atindelaki bango mwana na ye, mpe alobaki : “Bakotosa mwana na ngai !”

38Kasi tango bafuteli ya elanga bamonaki mwana, balobanaki :

“Tala moto akokoma nkolo ya elanga. Boya, toboma ye mpe tozwa elanga na ye !”

Copyright information for LinMNB