Matthew 22:23-28

23Kaka na mokolo wana, Basaduseo, baoyo balobaka ete lisekwa ezali tebayaki epai na ye mpe batunaki ye motuna oyo :

24—Moteyi, Moyize alobaki : Soki mobali akufi mpe aboti bana te, ndeko na ye akobala mwasi oyo ye atiki mpo abotela ye bana. 25Nzokande na kati na biso, ezalaki na bandeko sambo ya mibali. Oyo ya liboso abalaki mwasi, bongo akufaki ; lokola babotaki bana te, atikaki mwasi na ye epai ya ndeko na ye ya mobali. 26Mpe esalamaki kaka ndenge moko mpo na ndeko ya mibale, yamisato, kino na oyo ya sambo. 27Na sima, mwasi mpe akufaki. 28Bongo na mokolo ya lisekwa, mwasi yango akozala mwasi ya nani na kati na bango sambo ? Pamba te, bango nyonso babalaki ye !

Copyright information for LinMNB