Matthew 22:34-39

34Tango bafarizeo bayokaki ete Yesu akangisaki Basaduseo monoko, bango mpe basanganaki esika moko. 35Bongo moko na kati na bango azalaki molakisi ya Mibeko, ayaki komeka Yesu na motuna oyo :

36—Moteyi, Mobeko nini eleki monene na kati ya Mibeko nyonso ?

37Yesu azongiselaki ye :

—Linga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na elimo na yo mobimba, mpe na makanisi na yo nyonso !
38Oyo nde mobeko ya liboso mpe oyo eleki monene. 39Mobeko ya mibale, oyo ekokani na yango, yangʼoyo : Linga moninga na yo lokola omilingaka yo moko.
Copyright information for LinMNB