Matthew 24:1-6

Yesu ayebisi bapasi oyo ekokweyila Yeruzalem

(Mk. 13.1-13 ; Lk. 21.5-19)

1Tango Yesu azalaki kobima na lopango ya Ndako ya Nzambe, bayekoli bayaki pene-pene na ye mpo na kolakisa ye ndenge batongaki Ndako yango. 2Kasi Yesu alobaki na bango :

—Bomoni nyonso oyo ! Nalobi na bino ya solo, libanga ata mokote ekotikala likolo ya libanga mosusu. Nyonso ekopanzana !

3Tango Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya Olive, bayekoli na ye bayaki kaka bango moko mpo na kotuna ye :

—Yebisa biso, tango nini makambo wana ekosalama ; elembo nini ekolakisa koya na yo mpe suka ya mokili !

4Yesu azongiselaki bango :

—Bokeba ete moto moko te akosa bino.
5Pamba te, bato mingi bakoya na kombo na ngai mpe bakoloba : “Nazali Kristo” mpe bakokosa bato mingi penza. 6Bokoyoka basango ya bitumba mpe makelele ya bitumba ; bokeba, bobanga te, pamba te, makambo yango esengeli kosalama, kasi wana ekozala naino suka ya mokili te.
Copyright information for LinMNB