Matthew 24:4-9

4Yesu azongiselaki bango :

—Bokeba ete moto moko te akosa bino.
5Pamba te, bato mingi bakoya na kombo na ngai mpe bakoloba : “Nazali Kristo” mpe bakokosa bato mingi penza. 6Bokoyoka basango ya bitumba mpe makelele ya bitumba ; bokeba, bobanga te, pamba te, makambo yango esengeli kosalama, kasi wana ekozala naino suka ya mokili te. 7Ekolo moko ekobunda na ekolo mosusu, bokonzi moko ekobunda na oyo mosusu. Nzala ekozala makasi penza mpe mabele ekoningana na bisika mingi. 8Makambo nyonso wana ekozala kaka ebandeli ya bapasi oyo mwasi ayokaka soki alingi kobota.

9Bongo, bakokaba bino mpo na konyokola bino mpe bakoboma bino. Bikolo nyonso ekoyina bino mpo na kombo na ngai.
Copyright information for LinMNB