Matthew 26:1-5

Bakani koboma Yesu

(Mk. 14.1-2 ; Lk. 22.1-2 ; Jn. 11.47-53)

1Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana nyonso, alobaki na bayekoli na ye :

2—Boyebi ete feti ya Paki etikali mikolo mibale mpo ebanda, mpe Mwana ya moto bakoteka ye mpo babaka ye na ekulusu.

3Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe na bankolo basanganaki na ndako ya Kayifa, mokonzi ya banganga-Nzambe ; 4bayokanaki mpo na kokanga Yesu na mayele, mpe baboma ye.

5Kasi balobaki :

—Tosala yango na tango ya feti te, mpo bato batomboka te.

Basopeli Yesu malasi na Betaniya

(Mk. 14.3-9 ; Jn. 12.1-8)

Copyright information for LinMNB