Matthew 26:31-35
31Bongo Yezu alobaki na bango : —Na butu ya lelo, bino nyonso bokokweyisa kondima na bino mpo na ngai. Pamba te ekomama : Nakobeta mobateli,mpe bameme ya etongo bakopalangana.
32Kasi sima ya kosekwa na ngai, nakokende liboso na bino na Galileya ! 33Piere alobaki : —Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango mpo na yo kasi ngai nakokweyisa yango te. 34Yezu azongiselaki ye : —Nalobi na yo ya solo : na butu ya lelo, liboso ete soso elela, okowanganaa ngai mbala misato. 35Kasi Piere alobaki na ye : —Atako soki nasengeli kokufa na yo elongo, nakowangana yo te. Bongo bayekoli nyonso balobaki kaka ndenge moko.
Yesu abondeli na Getesemane
(Mk. 14.32-42 ; Lk. 22.39-46)
Copyright information for
LinMNB