Matthew 26:59-64

59Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya likita moneneya Bayuda, bazalaki koluka litatoli ya lokuta mpo na Yesu, mpo etebakoka koboma ye. 60Atako batemwe ya lokuta bayaki mingi, kasi bazwaki ata moko te. Na sima, bato mibale bayaki, 61mpe balobaki :

—Moto oyo alobaki : “Nakoki koboma Ndako ya Nzambe mpe kotongayango lisusu na mikolo misato”
62Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe atelemaki mpe atunaki Yesu :

—Ozali na likambo ya kozongisa te ? Litatoli nini bato oyobazali koloba mpo na yo ?
63Kasi Yesu azongisaki eloko moto te. Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe alobaki na ye :

—Nazali kolapisa yo ndayi na kombo ya Nzambe ya bomoi : yebisabiso soki ozali Kristo, Mwana ya Nzambe !
64Yesu azongisaki :

—E e, ezali bongo ndenge olobi. Kasi nalobi na bino : Bandasikʼoyo, bokomona Mwana na Moto akovanda na loboko ya oyo aleki na nguya mpeakoya na mapata ya likolo !
Copyright information for LinMNB