Matthew 26:69-74

69Na tango wana, Piere avandaki libanda, na kati ya lopango. Mosali moko ya mwasi ayaki epai na ye, mpe alobaki :

—Yo mpe ozalaki na Yesu ya Galileya.
70Kasi Piere awanganaki na miso ya bato nyonso :

—Nayebi kutu te makambo ozali koloba !
71Tango azalaki kokende epai porte ezalaki, mosali mosusu ya mwasiamonaki ye, mpe alobaki na bato oyo bazalaki wana :

—Moto oyo azalaki na Yesu ya Nazareti.
72Piere awanganaki lisusu mpe alapaki ndayi :

—Nayebi moto wana te !
73Sima ya mwa tango moke, bato oyo batelamaki wana, bayaki pene-pene ya Piere mpe balobaki na ye :

—Ya solo, yo mpe ozali moko ya bato wana, pamba te elobeli nayo ezali kofunda yo !
74Bongo abandaki komilakela mabe mpe kolapa ndayi :

—Nayebi moto wana te. Kaka na tango wana, soso elelaki.

Copyright information for LinMNB