Matthew 8:28-33

28Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na mokili ya Gadara, bato mibale bazalaki na milimo mabe, babimaki na simetiele mpe bayaki kokutana na Yesu. Bazalaki na kanda mingi penza, yango wana moto ata moko te azalaki komeka koleka na nzela wana.

29Babandaki koganga :

—Mwana ya Nzambe, olingi kosala biso nini ? Boni, oye kotungisa bisoliboso ete tango ekoka ?

30Mwa mosika moke, etonga monene ya bangulu ezalaki kolia. 31Milimo mabe ebondelaki Yesu :

—Soki obengani biso, tinda biso tokota na bangulu wana !

32Bongo Yesu alobaki :

—Bokende !

Milimo mabe ebimakina na bato wana mibale mpe ekotaki na bangulu. Kaka na tango wana, bangulu yango nyonso elongwaki mbangu na ngomba, edindaki na ebale mpe ekufaki na mayi.

33Bato oyo bakengelaka bangulu bakimaki ; bakendaki na vile, mpe bayebisaki makambo nyonso na oyo esalamaki na bato oyo bazalaki na milimo mabe.
Copyright information for LinMNB